diocesedemahaginioka

Prière du Centenaire en lingala

 LOSAMBO MPO NA MIBU MOKAMA

 YA BOSANGELI SANGO ELAMU

 O DIOCESE YA MAHAGI-NIOKA 

1912-2012

 

 

 

 

Nzambe Tata wa biso, o bilongi bwa Yo bonene, otindeli biso Mwana wa Yo Yezu na ntina ‘te abikisa biso mpe akomisa biso bana ba Yo. Na mosala mwa Elimo Santu, tokomi lelo solo bana ba Yo, yango mibu mokama.

Banda mobu  kutu moko kama libwa zomi na mibale, mbula babonzelaki basakramento mpo na mbala ya yambo epai na biso, biso bana babali na basi ya diocèse ya Mahagi-Nioka, tobondeli yo boye na limemya :

 

Yambo, totondi yo mpo otindeli biso basangeli Nsango Elamu ya libiki, Mama wa biso wa Africa abateli bango. Misala mya bango mibota mbuma okati ya mbula nkama moko eye, ozwi batu ebele, bayambi Mwana wa Yo.

 

Okati ya bango, oponi basasu bazala basali ba Yo lokola Episkopo, ba-Nganaga Nzambe, ba-Mofele, ba-Mamelo, ba-Katekista na babiangemi basusu bamibonzeli na Yo ; bakani mpe babebisi elako ya batisimo mpe ya bobiangi bya bango te.

 

Mpo na maye manso, totondi yo botondi na motema monso !

Botondi mpenza, zambi Mwinda mwa Nsango Elamu ya Yo ebaluki mpe ekomisi ya sika mayele mpe mimeseno mya biso.

 

Benisa ba-missionnaires basakoli biso Nsango Elamu yango : Episkopo, Nganga Nzambe, Mofele, Mamelo na bakristu basalisi mpe basungi bango o mosala mwango.

Yamba o Mwinda mwa Yo baye banso okati na bango batiki biso, baye  bawei na liwa lya kpokoso makasi lokola na Aba, na Mahagi mpe na Biringi.

Salisa biso tosepela na lokumu nyoso Jubilé eye ya mbula kama moko ya bosangeli Nsango Elamu epai na biso. Biso mpe tokoba mosala moye ba-missionnaires ba yambo babandaki epai na biso mpe baye balandaki bango balendisaki.

 

Tosengi Yo bolimbisi, mbala inso tomipesani te o mosala mwa Yo to totiki masengisi ma biso. Mpo na mabe ma biso mabebisi bokoli Bokonzi bwa Yo, mingi penza okati diocèse ya biso ya Mahagi-Nioka. Mokonzi, oyokela biso mawa !

Yokela biso mawa mingi mpenza mpo na mbemba ekotindaka biso na mabe ndenge na ndenge ya bokabwani libota na libota, ingili na ingili, ekolo na ekolo to ekobumaka bondeko okati ya biso mpe ekotindaka biso totala baninga mpamba, toyina to tokanisela bango mabe.

Mokonzi, tondisa biso na nguya ya sika ; nsuka ya mibu mokoma eye etinda biso tobanda mibu mokama mosusu ekoya na mpiko, tokoba mosala mwa Yo, batu bayamba Mwinda mwa Yo.

Sala ‘te totonga Libota lya Yo esika wapi bana ba Yo bakokutana, bakolingana, bakolimbisana mpe bakoluka nse kolola elongo.

Sala ‘te bokutani kati ya Nsango Elamu ya Yo na bokoko bwa ingili moko moko wa biso bozala na ndenge toyamba solo Nsango Elamu mpe tokoma bakristu ba solo.

Sala ‘te bokutani boye ebongola bomoi bwa biso na bozindo na ndenge ‘te awa o nse, Bokonzi bwa Yo bomonana okati ya bomoi bwa biso mpe na makambo manso.

Mokonzi, tosengi lisalisi mpe mapamboli ma Yo, mpo ‘te maye manso matinda Eklezya ya Yo Moko, Mosantu, Katoliko mpe Apostoliko ezwa esika mpe ekola na bikolo binso bya biso.

Santu Maria Ngondo, Mama wa biso ya Afrika, osambelela biso !

Bamartiro baganda, bosambelela biso !

Santu Joséphine Bakhita, osambelela biso !

Wa Esengo Marie Clémentine Anuarite, osambelela biso !

Wa Esengo Isidore Bakanja, osambelela biso !

Wa Esengo François Spoto, osambelela biso!

 

 

« Repartons du Christ,

Unique  Sauveur »

 

 

 

 



22/08/2012
0 Poster un commentaire

Inscrivez-vous au blog

Soyez prévenu par email des prochaines mises à jour

Rejoignez les 11 autres membres